Psalms 2

Kobulisama ya Mokonzi


1 Mpo na nini bikolo ezali kotomboka ?
Mpo na nini bato bazali kokanisa
makambo oyo ezangi tina ?

2 Bakonzi ya mokili batomboki,
mpe bayangeli bazali koyokana
mpo na kobundisa Yawe
mpe mopakolami na ye.

3 Bazali koloba :
“Tokata basinga na bango,
mpe tobwaka minyololo na bango mosika !”

4 Kasi Moto oyo avandaka na Likolo azali koseka ;
Nkolo azali koseka bango.

5 Bongo azali kopamela bango na kanda na ye,
mpe azali kobangisa bango na kanda ya somo ;
mpe alobi :

6 “Natiaki Mokonzi na ngai likolo ya Siona,
ngomba na ngai ya bosantu !”

7 Nakosakola maloba na Yawe,
alobaki na ngai :
“Yo ozali mwana na ngai ;
lelo oyo naboti yo.”

8 Senga ngai,
mpe nakopesa yo mabota,
yango ekozala bomengo na yo ;
mpe mokili mobimba kino na basuka na yango,
ekozala ya yo.

9 Okokamba bango na nzete ya ebende :
mpe okopanza bango
ndenge nzungu ya mabele epanzanaka.

10 Yango wana bino bakonzi, bozala na mayele ;
bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo :

11 Bosalela Yawe na botosi ;
mpe bosepela na kobanga.

12 Bokumbamela Mwana noki te akosilika,
mpo ete bobeba te na nzela na bino,
pamba te kanda na ye ekoki kongala na mwa tango moke.
Mapamboli na baoyo nyonso bamibombaka kati na ye !
Copyright information for LinMNB